17/10/2023
34 Eleko mokomoko ezalaki na nsango mpe momemi-nsango na yango. Nzambe azalaki kobatela yango. Ata na bileko ya lingomba tomoni ete moto na moto azalaki na momemi-nsango, mpe moto na moto azalaki na bomoi na mbula na ye; mpe mosusu akoti, mpe abimaki; mpe mosusu akoti; kino na eleko ya lingomba ya nsambo; monzoto nyonso, anzelu nyonso ya lingomba, momemi-nsango nyonso.
Pe tomoni ete na eleko ya lingomba ya nsuka, na Emoniseli 10, ekoyokana na lokito ya kelelo, mpe ezalaki na mingongo nsambo ebimisamaki na kati... Bapesamaki nzela te ya kokoma. Kasi ekangamaki na nsima ya buku, bilembo nsambo ezalaki na nsima ya buku.
Nsima ya kokoma buku yango, na nsima bakangaka yango lisusu kuna na bilembo nsambo. Sikawa, moto moko te ayebi soki bazali nini. Kasi elobi ete, “Na mikolo oyo anzelu ya nsambo asakolaki nsango na ye,” yango nde anzelu awa na mabele sikawa.
Mpo anzelu oyo akitaki uta na likoló; mpe eye ezalaki na mabele; anzelu azali momemi-nsango, momemi-nsango mpo na eleko.