02/06/2024
𝗟𝗜𝗡𝗚𝗢𝗠𝗕𝗔 | Kisangani : Masasi mabetami o ndako ya Nzambe lokola na Bunagana. Lomingo oyo na tongo, Église Nouvel Apostolat ya 7e trance o etando ya Kabondo ekoti mobulu.
Yango ezali na ntina ya likambo litali kondima mabala mwa mibali na mibali, mpe basi na basi (homosexuel). Kasi mpe, na oyo etali kondima basi bakoma bateyi. Yango esalá ete lingomba likabwana : ngambo moko Église Néo-Apostolique, ngambo mosusu Église Nouvel Apostolat.
Bandimi bwa Église Néo-Apostolique bakeyi inde inde ti na église Nouvel Apostolat, na ba soda mpe ba pulusu baye bakambami na colonel Destin Mongomba mpe lieutenant Mukalayi, babeti masasi neti « Papa na July ».
Nzambe asungi, moto azoki te. Kasi ba ike bazali kokamwa likambo ya kondima bosangisi nzoto mobali na mibali mpe mwasi na mwasi. Mokili mokomi na s**a. Nkele oyo wapi. Totosana !
RDC Mopape_Actu