31/08/2023
ya bandeko na ngai,
mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.
24 Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !
Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu !
Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !
25 Pamba te Yawe atiolaki te
mpe abwakaki te mobola ;
apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye
tango asengaka lisungi.
26 Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani,
nakokisaka bandayi na ngai
na miso ya bato oyo batosaka Yo.
27 Babola bakolia mpe bakotonda ;
bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye.
Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
28 Mokili mobimba ekokanisa Yawe,
ekomipesa epai na Ye ;
mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.
29 Pamba te Yawe azali Mokonzi,
azali kokonza bikolo.
30 Bazwi nyonso ya mokili bakolia
mpe bakogumbamela Ye ;
bato nyonso oyo bazali kokende na k***a,
ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi,
bakogumbama liboso na Ye.
31 Bakitani na bango bakosalela Yawe
mpe bakopanza sango na Ye
epai ya ekeke oyo ekoya na sima ;
32 bakosakola misala ya bosembo na Ye,
epai ya bato oyo bakobotama.