07/20/2025
N’sele, Terre Jaune : Wapi sécurité ? Ezali nanu star ya quartier !
Par Elie Mata Munsaka, mokomi (oyo azokoba kosala sans kobwakama)
Na quartier Terre Jaune na N’sele, makambo ya mitindo ya koboma, koyiba, mpe koyebisa moto te ekomi lokola star ya filime. Soki ba policiers basalaka mosala ndenge ba voleurs basalaka na sérieux, mbala moko Netflix efandaka kosala série “Ba Voleurs ya Kinshasa : Saison Terre Jaune”.
Le “bonne nuit” ekomi “fanda na porte ya fermee bien”. Ata ba cadenas bongo bazali kozwa vitamine mpo ete batika kokangama na force. Batu balobi ba voleurs wana bazali trop organisés, tolingi kobanda koluka soki bazali na ba bureaux RH. “Lobi bazwaki écran, lelo modem, lelo lobi na benga bango mpo na CV na ngai,” moto moko alobaki na pasi ya komi rire.
Ba motos ya suspect ekotaka na butu ndenge ba taxis refusaka na moi. Telephones ezalaka kolata mapapu. Soki omoni moto azali kokima, motuna ekomi “oyebi ko courir ?” te, kasi “bazwaki nini na yo ?”.
Bato ya quartier balingi kobika, kasi kobanga ezali kosala motema pasi. “Tolingaka kaka kozwa rechaud na biso semaine moko sans ko disparaître,” maman moko alobaki, azali sik’oyo kofanda na marmite na se ya mayi.
Kaka rire te, quartier Terre Jaune esengeli kozwa attention. Ekoki kozala pôle ya développement, kasi sik’oyo ezali pôle ya ba voleurs. Tosengi na ba autorités ya local kosala makasi. Biso tolingi sécurité ya solo, te kaka oyo ya koyeba que okoki kobwakama n’importe quand.
Mpo na biso, sécurité ezalaka priorité. Kasi soki te, rire eko kendeka mpe ekozala pasi.
Elie Mata Munsaka